Kosolola , discussion to pe masolo na ICE [Lingála]

Ba contrôle ya bureau de police ya immigration na douane (ICE) na South Portland ekoki kosalema na ndenge ya email to pe na telefone. Kasi bureau wana elingaka mingi système ya kokomela bango na email koleka telefone.

Na oyo bitali kocompleter enregistrement na bino na ICE : 

Na ndenge ya Email: ICE-ERO-POM-Reporting@ice.dhs.gov (Oyo nde nzela to pe moyen ya malamu ya ko contacter bango!)

Tosengi bino bokoma ba emails na bino nyonso na Anglais. Esengeli ke email ezala na makambo oyo bilandi :

  1. Nkombo na bino complet na ndenge ekomami na mikanda na bino,

  2. Nimero na bino oyo ebandi na A,

  3. Mukolo to pe date oyo botama,

  4. Adresse place bozali kofance na ngonga ya lelo, pe 

  5. Nimero ya telefone personel na oyo ya bana bafandaka na bino basengeli komi enregistrer na système ya mikanda ya immigration. 

Soki bosilisi kozongisa mikanda na ndenge esengeli, bureau ekoki kopesa bino biyano to pe confirmation na sima mikolo mitanu to 5 jours ouvrables na masengeli to pe exigences ya sika na ndenge ya kosala communication.

OU

Bobenga numero oyo 207-396-5000 (Tosengi bino kobenga seulement soki bokoki kotinda email te)

Liboso ya kobenga, tosengi bino komibongisama na makambo oyo elandi :

  • Bozala na numero A ya dossier na bino pembeni

  • Bozala na adresse complet ya esika oyo bofandi

  • Bozala na mutu oyo akoki kolimbola makambo na bino na anglais pona ete bureau wana ezalaka na interprete to pe traducteur te.