Litatoli ya mutuya pona batu babuaka ngunda na Maine

Mendez Rojas: Litatoli ya mutuya pona batu babuaka ngunda na Maine

OKOTAKI NA ETATS-UNIS LE 16 JUIN 2016 TOPE SIMA? SOKI IYO

Esambiselo ya likolo ebimisi mukano oyo ba bengi “Mendez Rojas” ekoki kosunga yo soki okokisi masengami. Mokano "Mendez Rojas" ezali kopesa yo nzela pona kotinda bosengi nayo ya ngunda na ndenge esengeli epayi ya esambiselo ya immigration. Mokano oyo etali batu lokola:

  • Osili kotinda ngunda nayo na etando ya immigration ya Etats Unis (USCIS) mpe ozwa nkasa ya boyambi TO PE

  • Tangu mususu etando ya immigration (USCIS) tope esambiselo ya immigration ebuakisaki (ezongisi) formulaire nayo ya ngunda; TO PE

  • Bayebisi yo okende na esembiselo ya immigration pe bapesaki yo  mikanda songolo, kasi dosier nayo ekoti nanu na systeme ya esambiselo te, TO PE

  • Mbula moko esili koleka kobanda tangu okotaki na Etats-Unis, kasi  obuakaki nanu ngunda te, TO PE

  • Bosenga na bino ya ngunda esili koboyama, po tangu mususu otindi yango tangu osi olekisi mbula moko kobanda tangu okotaki na Etats-Unis.

Soki okotaki na Etats-Unis le 16 Juin 2016 to sima MPE ondimi  IYO na mituna mibale oyo elandi, osengami obenga ILAP po oyeba soki mukano ya “Mendez Rojas” ekoki kosunga yo na dossier nayo:

  1. Okutanaki na MOKO ya bakonzi ya immigration tangu okotaki Etats-Unis, tope tangu okokisaki mposo mibale sima ya ko kota Etats-Unis? SOKI IYO:

  2. Oyebisaki bakonzi ya immigration ete ozali kobanga kozonga na mboka nayo? SOKI IYO:

Okoki kobengisama pona kozwa lisalisi ya ILAP asunga yo okoma moko ya batu “Mendez Rojas” ekosalisa.

OSENGELI oluka biso yambo tokoma le 22 Avril 2022..

Etapi 1: Tia esika moko mikanda nionso ozwaki oyo ewutaki na buro ya immigration na frontiere to pe banda oya na Maine. Lisusu tia esika moko eloko nionso otinda to pe oyo ozwa ewuta na USCIS to pe na esambiselo ya immigration.

Etapi 2: Benga ILAP mpe tuna lolenge oyo. Tuna “M-R consult.”