Bazenla misusu ya internet pona tribunal ya immigration [Lingála]

Tribunal ya immigration ya Etats Unis ezali na website oyo ezali na ba information na batoli misusu pona batu oyo bazali nakati ya procedure na tribunal ya immigration na ba avocat to pe ba oyo ba ndimami kotelemela bango na procedure wana. 

Bokoki kozwa batoli to pe information misusu bitali tribunal ya immigration na ndenge ya koyeba status nabino ya immigration, kotelechager ba formulaire oyo ezali na tina munene to pe important pona dossier na bino, kozwa ba adresse ya ba place ya contacts pona kosalisa dossier na bino, na ba information misusu.

Na ngonga ya lelo, batoli to pe explication ezali kaka na munoko ya Anglais na ki Espagnol. Tokobakisa minoko misusu na mikolo oyo ekoya sima!