LIKEBI: Tribunal ya immigration ya sika mpo na bato oyo bafandi na Maine


Soki ofandi na Maine mpe ozali na likambo na Tribunal ya Immigration ya Boston, likambo na yo ekoki kopesama na Tribunal ya Immigration ya sika na Lowell.


Tribunal ya immigration ya Lowell ezali wapi?

Tribunal ya Immigration ya Lowell efungolamaki na Chelmsford, Massachusetts na sanza ya minei 2024.

Adresi:
150 Apollo Drive
Suite 100
Chelmsford, MA 01824


Ndenge nini nakoyeba soki tribunal na ngai ebongwanaki?

Esengeli otala site internet ya tribunal ya immigration poso nionso mpo na koyeba soki likambo na yo ekendeki na Tribunal ya Immigration ya Lowell. Makambo ya mikemike oyo etali likambo na yo ekoki kobongwana ntango nyonso.

Okoki mpe kozwa mayebisi to sango na ntina ya esambiselo na yo ya sika na nzela ya posita. Ezali na ntina mingi ete tribunal ezala na adresse na yo ya lelo.


Ndenge nini nakoki kotala likambo na ngai na site internet ya tribunal ya immigration?

Kota na https://acis.eoir.justice.gov/en/ mpe kotia A# na yo.


Ezali boni soki nazali naino na mituna mpo na likambo na ngai to esika oyo nazali na tribunal?

Okoki kobenga Tribunal ya Immigration ya Lowell na 978-497-9000.