Etat ya maine endima batu basalela marijuana/diamba na nzela ya lopitalo pe pona ko sepela. Bayi mboka bakoki ko sala bilanga pe koteka marijuana /diamba.

Kasi mbela wana etali kaka etat ya maine. Endimami te na mibeko ya immigration oyo etalaka america mobimba.

Kosalela marijuana /diamba eza ko buka mibeko ya immigration.

Soki ozali americain te esika nionso ozali bakuta yo na marijuana /diamba te, kosala bilanga nango te, kosala bisika batekaka yango te mpe koteka yango te.

Soki bakuti yo ozali kosala bisika ya marijuana /diamba , ko sala bilanga to kosunga batu ba mela yango oko zwa makambu na immigration bakoki ko boyela yo mukanda ya green card to ya ko koma americain pe ko bengana yo na mboka america oyo to bengi deportation. Ata obuka mibeko ya mboka te, pe marijuana / diamba endimama na etat ya maine.

Mikolo oyo basali na ba minganga ya immigration bazali kotuna soki osalelaki, otekaki to okabaki marijuana / diamba. Mingi mingi na batu ba wuti bisika ba ndimela batu ba salela marijuana / diamba neti na maine

NDENGE NINI KO MIBATELA:

  • Koselala to kozala na marijuana /diamba te ti mukolo okokoma Americain.

  • Kosala na esika batekaka balonaka marijuana /diamba te.

  • Ko kata bilanga, koteka, ko kaba marijuana /diamba te.

  • Soki ozo na bokono oyo esengi kaka o salela marijuana /diamba solola na avocat ya immigration yambo ya ko somba yango.

  • Ko tambola na marijuana to carte ya marijuana/diamba na libenga na yo te.

  • Ko zala na photo to ba message ya marijuana/diamba na telephone, facebook, instagram tiktok twiter na yo te.

  • Soki avocat na yo a pessi yo nzela te ko limbola mituna etali marijuana /diamba te soki ba sali ya immigration toba minganga ya immigration ba tuni.

  • Soki officier ya immigration toba minganga ya immigration a pesi mituna etali marijuana/diamba loba olingi ko solola na bango te olingi ko solola na avocat na yo.

  • Ozali na zala motema makasi soki o ndimi eleko etali marijuana/diamba okoki ko longola yango lisusu te soki o ndimaki ete osalelaka yango na lombango luka lisungi ya avocat.