KOBONGOLA ADRESSE

Mbala nyonso oyo okokende kofanda esika mosusu, osengeli kopesa immigration adresse na yo ya sika. Yekola ndenge nini okoki kobongola adresse na yo na ba Service ya Citoyenneté et Immigration ya Etats-Unis (USCIS) mpe tribunal ya immigration.


YEKOLA MINGI

NDENGE NINI NAKO BONGOLA ADRESSE NA NGAI NA USCIS?

Soki ozali na bosengi oyo ezali kozela na USCIS mpe outi kokende kofanda esika mosusu, esengeli opesa USCIS adresse na yo ya sika na kotindaka formulaire ya Mbongwana ya Addresse ya USCIS (AR-11).

NDENGE NINI NAKO BONGOLA ADRESSE USCIS NA NGAI NA NZELA YA COURIER?

NDENGE NINI NAKO BONGOLA ADRESSE NA NGAI NA TRIBUNAL YA IMMIGRATION?

Soki ozali na likambo na tribunal ya immigration mpe outi kokende kofanda esika mosusu, esengeli opesa tribunal ya immigration adresse na yo ya sika na kotinda formulaire ya tribunal ya Immigration addresse na yo ya sika (EOIR-33). Okoki koluka esika ya tribunal na yo ya immigration na kotanga buku na biso: Ndenge nini nakoki kozwa sango na ntina ya likambo na ngai ya tribunal ya immigration? Awa na nse ezali na malako mpo na ndenge ya kobongola adresse na yo na tribunal ya immigration.

Soki okendeki na Maine uta na etuka mosusu mpe olingi kokende na likambo na yo na tribunal ya Immigration ya Chelmsford, finá awa mpo na koyeba makambo mosusu.

NDENGE NINI NAKO BONGOLA ADRESSE NA NGAI NA TRIBUNAL YA IMMIGRATION NA NZELA YA courriel?

NDENGE NINI NAKOKI KIMIBATELA NA BA FRAUDE YA IMMIGRATION?

Keba ntango ozali kozwa lisalisi na likambo na yo ya immigration! Keba na bato na Maine oyo balukaka kokosa yo na kosala lokola bazali kosalisa na makambo ya immigration. Bato oyo bakoki koyiba mbongo na yo mpe kosala likambo na yo ya immigration mabe.

Lolenge malamu ya komibatela ezali ya kozala na sango na ntina ya maye bato oyo basalaka mpe kozala na bokebi mpo na nani opesi nzela ya kosalisa na likambo na yo ya immigration.

YEKOLA MINGI

Biloko ya ILAP oyo ezali na lokasa oyo esalemi na baavoka mpe ba représentant oyo bazali na ndingisa, kasi ezali te esika ya toli ya mibeko.


Kosenga Rendez-Vous Na Ilap
 
LUKA BA RESSOURCE MINGI KOLEKA
 
LUKA LISUNGI MINGI KOLEKA
 

SUNGA BISO TOBONGISA KOLEKA!


 
Luka Ba Ressource Mingi Koleka