YEBA DROIT NA YO

Yekola ba droit na yo na Etats-Unis mpe na ntina ya mibeko oyo etali yo mpe libota na yo.


BA DROIT NA NGAI NA ETATS-UNIS EZALI NINI SOKI BAPOLISI TO MBANTO YA IMMIGRATION BAKANGI NGAI?

Moto nyonso na Etats-Unis azali na ba droit misusu soki ba policier to mbanto ya Immigration bakangi ye. Ezali na ntina te soki kimwana mboka na yo ezali nini to soki ozali na statut juridique.

Ozali na lotomo ya kotikala na kimia, ya kondima te kolukaluka, mpe kokende longola se soki bakangi yo. Soki bakangi yo, ozali na lotomo ya kobenga mpe kosolola na avocat mpe koyanola na mituna te. Ozali na makoki oyo mpe mingi mosusu ya ntina soki ba policiers to mbanto ya immigration baye na ndako to esika na yo ya mosala, bakangaki yo, to batie yo na bokangami ya immigration.


NDENGE NINI NAKOKI KIMIBATELA NA BA FRAUDE YA IMMIGRATION?

Keba ntango ozali kozwa lisalisi na likambo na yo ya immigration! Keba na bato na Maine oyo balukaka kokosa yo na kosala lokola bazali kosalisa na makambo ya immigration. Bato oyo bakoki koyiba mbongo na yo mpe kosala likambo na yo ya immigration mabe.

Lolenge malamu ya komibatela ezali ya kozala na sango na ntina ya maye bato oyo basalaka mpe kozala na bokebi mpo na nani opesi nzela ya kosalisa na likambo na yo ya immigration.


NAKOKI KOZALA, KOSALELA, KOLONA TO KOSALA NA BANGI SOKI NAZALI MWANA MBOKA YA ETATS-UNIS TE?

Te! Maine mpe ba états misusu epesaka te bipekiseli ya bangi, kasi bangi ezali kaka ILLÉGAL na mibeko ya immigration ya Etats-Unis. Soki ozali mwana mboka ya Etats-Unis te mpe bamoni ete osalelaki bangi, osalaki na mombongo ya bangi, olonaki bangi to osalisaki moto mosusu asalela bangi, okoki kokutana na mikakatano minene ya immigration.

Soki ozali mwana mboka ya Etats-Unis TE okoki kozala na, kosalela, kolona, ​​to kosala na bangi te na ba états nionso!

Mise à jour ya guide: Sanza ya motoba 2021


NDENGE NINI BA ACCUSATION CRIMINELLES EZALI NA IMPACTE NA LIKAMBO NA NGAI YA IMMGRATION?

Ba accusation pénales ekoki kozala na ba conséquence ya makasi na likambo na yo ya immigration. Ba accusation pénales ekoki pe kotia yo na risque ya kobengana yo na mboka. Soki ozali déjà na (ba) efundeli ya mbeba, ezali na makambo oyo okoki kosala mpo na kolendisa likambo na yo ya immigration.

Mise à jour ya vidéo: Sanza ya muambe 2021


NAKOKI KOPONA TO KOKOMA MKOMBO NA LISTE YA BAPONI NA ETATS-UNIS?

Only U.S. citizens can vote or register to vote. This is true for all U.S. and State elections. Under immigration law, non-citizens who register to vote or who vote can face serious immigration problems, including deportation. It does not matter if you registered or voted by mistake, or were told by others it was safe to do so.


Biloko ya ILAP oyo ezali na lokasa oyo esalemi na baavoka mpe ba représentant oyo bazali na ndingisa, kasi ezali te esika ya toli ya mibeko.



SUNGA BISO TOBONGISA KOLEKA!