Kosenga Asile

Koyeba soki okokisi mibeko ya kosenga libateli to pe asile pe lolenge nini okoki kosenga asile sans ke ozala na avocat.


ASILE EZALI NINI?

Asile ezali bobateli ya mibeko oyo gouvernement ya Etat-Unis epesaka na bato oyo bazali na Etat-Unis kasi bazali bana mboka te mpe na ba oyo bakoki kozonga na mboka na bango lisusu te. Okoki kondimama na asile to pe kozwa kobombana na mboka mopaya soki :

  • Ozokisaki mingi to ozali kobanga ete okonyokwama mingi soki bazongisi yo na mboka na yo;
  • Koniokama makasi esalemaki na lolenge oyo bilandi:

    • Gouvernement to groupe songolo to ba individus/batu oyo gouvernement elingi to pe ekoki ko contrôler te ;

    • Mpo na loposo na yo, lingomba na yo, ekolo na yo, makanisi na yo ya politiki (to likanisi ya politiki oyo moto akanisi ete ozali na yango), to kozala mosangani na “ligomba ya batu songolo.”


EST-CE QUE NAZALI NA MAKOKI YA KOSENGA KOBOMBANA TO PE ASILE NA MBOKA MOPAYA ?

Biloko oyo ezali awa na nse ekosalisa yo na koyeba soki okoki kosenga demande d'asile na Etats-Unis.

Mise à jour ya vidéo: Sanza ya zomi 2020


BOSENGI YA ASILE TO PE LOLENGE NINI YA KOSENGA ASILE?

Moto nyonso oyo alingi kosenga asile to pe kobombana na kati ya Etats-Unis azali na ko tondisa formulaire oyo (Formulaire I-589). Esika okotinda bosengi na yo ya asile ekodependre na soki ozali na dossier likambo na tribunal ya immigration. Biloko oyo ezali na lokasa oyo ekopesa malako na ndenge ya kobongisa bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya.

Soki ozali na likambo TE na tribunal ya immigration, esengeli o tinda demande d’asile na yo (Formulaire I-589) na ETATS-UNIS Citizenship and Immigration Services (USCIS).

Yango elakisi ete ozali na bolongolami te (procédure ya bobengani), bakangaki yo te na bakonzi ya immigration mpe/to osengeli te kozala na audience moko ya tribunal liboso ya zuzi ya immigration, mpe ozali na likambo te na tribunal ya immigration

➔ Soki ozali na likambo na tribunal ya immigration, esengeli opesa demande d’asile na yo (Formulaire I-589) na tribunal na yo.

Yango elakisi ete ozali na likambo na tribunal ya immigration mpe demande d’asile na yo ezali défense na yo mpo na kolongolama/kobengana yo na Etats-Unis Soki okotaki na Etats-Unis kozanga visa mpe bakonzi ya immigration batelemisaki yo mpe bapesaki yo mikanda, okoki kozala na likambo na immigration esambiselo. Soki ozwaki Liyebisi ya kosamba (NTA) to Mobeko ya kobimisama mpo na kondimama, mbala mosusu ozali na likambo na tribunal ya immigration. Wana ezali kaka bandakisa. Ezali na ndenge mingi oyo bato basukaka na makambo na tribunal ya immigration.


 

NDENGE NINI NAKOKI KOTONDISA FORMULAIRE YA DEMANDE D’ASILE (I-589)?

Formulaire ya demande d’asile (I-589) ebengami: "Bosengi ya libateli mpe koboya kolongola".

Na nse, ezali na malako mpo na ndenge ya kotondisa formulaire I-589.

Formulaire:

📄 I-589: Bosengi ya Asile mpe mpo na kopekisa bolongolami

Tosengi bino bóyeba likebisi oyo ezali na Formulaire I-589 oyo elobeli ntina ya koloba solo mpe mbuma mabe to pe consequences oyo ekoki kobima soki bimisi maloba ya lokuta oyo ezali na amende to boloko ekoki kogagisa yo tina 25 ans.  


 

LOLENGE NINI YA KOSALISA PONA SOUTENIR APPLICATION NA NGAI YA ASILE?

Kopesa mikanda ya kondimisa ekoki kosalisa bosengi na yo, kasi esengeli te. Okoki kotinda bilembeteli mosusu nsima ya kotinda bosengi na yo.

Bilembeteli mpo na likambo na yo ya kobombana na mboka mopaya esengeli kosalisa mpo na kolakisa ete ozali na makoki ya kozwa kobombana na mboka mopaya mpe ete makambo oyo ezali na bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya ezali solo. Yango ekoki kozala mikanda, maloba ya baninga mpe bato ya libota, to masolo ya bansango.

Okoki pe kokoma déclaration personnelle pona kolimbola lisolo na yo pe pona nini okoki kozua asile.

Esengeli ata moke te kosalela mikanda ya lokuta to ya lokuta.


 

LOLENGE NINI NAKOKI KOTINDA APPLICATION NA NGAI NA USCIS?

Bokokuta na se mibeko bitali lolenge nini bokoki kotinda bosengi ya asile na USCIS. Soki ozali na dossier na tribunal ya immigration, tosengi bino kolanda to pe kotala eteni oyo elandi.


 

NDENGE NINI NAKOTIKA DEMANDE D’ASILE NA NGAI NA TRIBINAL YA IMMIGRATION ?

Soki ozali na likambo na tribunal ya immigration, ekosengela kotinda demande d’asile na tribunal yango.

Na nse ezali na malako na ndenge ya kotinda bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya soki ozali na likambo na tribunal ya immigration ya Lowell.

Mise à jour ya guide: Sanza ya minei 2024

Mise à jour ya vidéo: Sanza ya zomi na mibale 2020


Ndenge nini nakoki kosenga demande d'asile na tribunal ya immigration soki likambo na ngai ezali naino na tribunal te?

Soki ondimi ete ozali na likambo na tribunal ya immigration, kasi kombo na yo mpe Numéro A ezali te na ligne téléphonique ya Tribunal ya Immigration to na site internet ya makambo matali Tribunal ya Immigration, esengeli olanda malako ya sipesiale mpo na kotinda demande d’asile na yo.Na nse ezali na malako mpo na kosenga demande d’asile na tribunal ya immigration tango Number A na yo ezali na système te.

Landa malako oyo ezali na site internet ya USCIS mpo na kosenga kobombana na mboka mopaya na tribunal ya immigration tango A Number na yo ezali na système ya tribunal te: https://www.uscis.gov/i-589. Luká malako oyo ezali na nse ya eteni “Where to file/Esika ya kotinda dossier.”


NA WUTI NA NDAKU MOKO NA KENDE NA NDAKU MOSUSU. NASALA NINI?

Lokola okozwa ba messages ya ntina uta na gouvernement ya Etats-Unis na nzela ya poso, esengeli oyeba soki USCIS mpe/to tribunal ya immigration eyebi adresse postale na yo ya lelo. Esengeli kaka te o changer adresse na yo na nzela ya Poste!

Yekolá ndenge ya kobongisa adresi na yo.


NDENGE NINI NAKOKI KIMIBATELA NA BA FRAUDE YA IMMIGRATION?

Keba ntango ozali kozwa lisalisi na likambo na yo ya immigration! Keba na bato na Maine oyo balukaka kokosa yo na kosala lokola bazali kosalisa na makambo ya immigration. Bato oyo bakoki koyiba mbongo na yo mpe kosala likambo na yo ya immigration mabe.

Lolenge malamu ya komibatela ezali ya kozala na sango na ntina ya maye bato oyo basalaka mpe kozala na bokebi mpo na nani opesi nzela ya kosalisa na likambo na yo ya immigration.


Biloko ya ILAP oyo ezali na lokasa oyo esalemi na baavoka mpe ba représentant oyo bazali na ndingisa, kasi ezali te esika ya toli ya mibeko.



SUNGA BISO TOBONGISA KOLEKA!