Lolenge nini ya kolandela dossier na yo ya immigration

English | Français | Português | Español | Lingála


Soki ozali na dossier epayi ya bazuzi ya immigration, okoki koyeba mokolo oyo okoleka liboso ya bazuzi mpe makambo ndenge na ndenge, nakobengaka lisungi ya Cour ya Immigration na nzela ya alo-alo, to nakokendeke na site ya Cour ya Immigration, mpo na kolandela dossier na yo.  


Lolenge okoki kolandela dossier na yo na nzela ya alo-alo:

Esengeli ete otanga makomi nyoso elandi YAMBO obenga, mpo na koyeba nini bakoki koyebisa yo. Oko solola na moto te, kasi okoyoka kaka maloba moto asi arengistraki. Lokola ezali kaka na lokota ya Anglais, mpe na lokota ya Espagnol, esengeli ete obenga elongo na moto oyo akoki koyoka lokota yango.

 
 

Na nzela ya alo-alo: 1-800-898-7180

1. Tango okobenga, bakoloba « Osili kobenga lisungi mpo na kolandela ba dossiers EOIR » /You have reached the EOIR automated case information system. EOIR ezali kombo ya solo ya Cour ya Immigration. Tango mosusu, bakoki kolekisa bansango esengeli oyoka, yambo ebanda.

2. Nasima bayamba yo na lokota ya Anglais, bakoloba lisusu makambo wana na lokota ya Espagnol. Mpo na kokoba, finya 1 mpo na Anglais, to mpe finya 2 mpo na Espagnol. Okoyoka makambo matali lolelenge nini kokutana na bazuzi ekomi mwa mobulu, likolo ya coronavirus, mpe lolenge nini esengeli okende site ya Cour ya Immigration mpo na kolandela dossier na yo, yambo okende kokutana na bazuzi. Site ya Cour ya Immigration ekoki kolakisa yo mokolo oyo okokutana lisusu na ba zuzi, ekateli bazuzi bazwi na likambo na yo, mpe oyo bazuzi basengi mpo na dossier na yo. Kende na page 4 mpo na koyeba lolenge nini okoki kolandela dossier na yo na nzela ya site ya Cour ya Immigration.

3. Soki oponi o koba na Anglais, fina lisusu 1, pe bakosenga okotisa numero A nayo. Soki oponi okoba na Espagnol , bakosenga okotisa numero A nayo sikoyo. Numéro A ezali motango ya mitango libwa elandi «A», oyo esengeli ezala na mikanda ya immigration na yo nyoso. Tango ozali kokoma numéro A na yo, koma kaka mitango, kasi kokoma « A » te.

4. Na sima okoma numéro A na yo, okoki koyoka : “Makambo matali numéro A na yo oyo okomi, ezali kokokana na mikanda oyo tozali na yango te, to mpe, dossier na yo ezali na cour ya immigration te.” / The A number information you entered did not match a record in the system or the case has not been filed with the immigration court. Soki oyoki liloba wana, ezali pasi mpo na koyeba mokolo nini esengeli okutana na bazuzi mpo ete kombo na yo nanu ekomami na ba ordinateur na bango te, ekoki koloba ete nanu baponi mokolo oyo okokutana na bazuzi te. Kasi, soki ozwi mokanda oyo eyebisi yo mokolo okokutana na bazuzi, to mpe balobi na yo ete okokutana na bango, esengeli ete obenga Cour ya Immigration mpo na kozwa biyano misusu. Esengeli mpe obenga Cour ya Immigration soki ozali na mokanda oyo bakomi mokolo oyo okokutana na bazuzi, kasi ekokani te na mokolo oyo bapesaki yo ntango obengaki lisungi ya Cour ya Immigration. Soki balobi ete okokutana na bazuzi na Boston, okoki kobenga Cour ya Immigration ya Boston na 617-565-3080 (pona option 3). Mpo na ba cour ya immigration misusu mpe ba alo-alo na bango, kende na https://www.justice.gov/eoir/eoir-immigration-court-listing

LIKEBISI: Soki ozali na mokanda oyo bakomi mokolo oyo okokutana na bazuzi, esengeli okende na cour mokolo wana, ata bamoni makambo etali dossier na yo te, tango obengaki, to mpe omoni yango na site ya Cour ya Immigration te.


5. Tango ozali kobenga, soki numéro A na yo ezali na ordinateur ya immigration, alo-alo ekoloba lisusu numéro na yo, mpe bakosenga yo soki ezali mpenza numéro na yo. Finya 1 mpo na kondima, to mpe, finya 2 mpo na kokoma numéro mosusu.

6. Soki ondimi ete okomi numéro A na yo malamu, alo-alo ekoloba kombo na yo na baletre moko na moko. Tango mosusu bakoki kokoma kombo na yo mabe, kasi mingi-mingi ezalaka lolenge ekomami na mikanda ya immigration. Finya 1 mpo na kondima soki ezali mpenza kombo na yo, to mpe ezali ndenge ekomami na mikanda na yo, to mpe finya 2 mpo na kokoma lisusu numéro A na yo.

7. Soki okomi ti awa, okoki sikawa kolandela dossier na yo oyo ezali epayi ya bazuzi ya immigration. Esengeli ete oyoka ba option nyonso mitano, mpo na koyoka makambo mingi koleka etali dossier na yo.

  • Finya 1 mpo na koyeba mokolo nini okokutana lisusu na bazuzi. Soki mokolo ezwami, bakoyebisa yo ezali mokolo nini, mpe na ngonga nini okokutana lisusu na bazuzi, mpe lolenge nini ekozala, mpe lisusu kombo ya zuzi azali kolandela likambo na yo. Bakoyebisa yo mpe esika wapi Cour ya Immigration oyo esengeli okende ezali.

  • Finya 2 mpo na kolandela dossier na yo. Soki osengi esika ya libateli, bakoyebisa yo mikolo boni eleki wuta cour ezwaki lisengi na yo (babengaka yango mpe «horloge») soki osi osengaki esika ya libateli.

  • Finya 3 mpo na koyeba ekateli nini bazuzi bazwi na dossier na yo. Bakoyebisa yo ete bazali kolandela dossier na yo, to mpe ekateli ezwami na dossier na yo.

  • Finya 4 mpo na makambo etali appel na ntina ya dossier na yo. Soki ozali na dossier na appel te, bakoyebisa yo ete makambo na ntina ya appel na dossier na yo ezali te.

  • Finya 5 mpo na makambo etali dossier. Salela yango mpo na koyeba esika wapi cour oyo okokutana na bazuzi ezali, mpe alo-alo na bango.

Esengeli ete obenga lisungi mpo na moto MOKO NA MOKO na libota na yo, mpo ete moto moko na moko azali na numéro A na ye, ata bana. Bato ya libota moko, bakoki koleka na bantango ekeseni, to mpe na ba cour ekeseni. Esengeli ete okata, obenga lisusu lisungi mpe olanda lisusu oyo osalaki mpo na numéro A, na moto moko na moko.

Babakisaka bansango na lisungi na nzela ya alo-alo, ntango na ntango, mpe mikolo ya kokutana na bazuzi ebongwanaka mingi. Esengeli ete obenga lisungi ata mbala moko na mposo mpo na kolandela dossier na yo. Mpo na koyeba makambo nini ya sika balobi na ntina ya dossier na yo, esengeli ete Cour ya Immigration ezala na adresse postale na yo. Kende na page Kobongola Adresse mpo na kozwa lisungi mpo na koyebisa esika nini okomi kofanda: https://ilapmaine.org/change-address-lingala.


Lolenge nini okoki kolandela dossier na yo na nzela ya Internet:

Site ya Cour ya Immigration ezali na lokota ya Anglais mpe ya Espagnol. Mpo na kokota na site wana, kende na: https://acis.eoir.justice.gov/en/

Tala bilili elandi, mpo na koyeba ndenge nini ya kosalela site wana.

 
 

1. Ntango ozali kokota na site, okomona makomi oyo. Finya “ I accept” mpo na kokota na site ya Cour ya Immigration.

2. Koma numéro A na yo awa. Numéro A na yo ezali motango ya mitango libwa elandi «A» oyo esengeli ezala na mikanda ya immigration na yo nyoso. Tango ozali kokoma numéro A na yo, koma kaka mitango, kasi kokoma « A » te.

3. Nasima ya kokoma numéro A na yo, finya esika bakomi “SUBMIT.” Okoki komona bakomi “No case found for this A-Number.”/ (Bamoni dossier moko te mpo na numéro A oyo)

NTINA MINGI!

  • Soki omoni makomi wana, ezali pasi mpo na koyeba mokolo nini esengeli okutana na bazuzi mpo ete kombo na yo nanu ekomami na ba ordinateur na bango te. Soki omoni makomi wana, mpe ozali na ordinateur ya cour te, ekoki koloba ete nanu baponi mokolo oyo okokutana na bazuzi te. Kasi, soki ozwi mokanda oyo eyebisi yo mokolo okokutana na bazuzi, to balobi na yo ete okokutana na bango, esengeli ete obenga Cour ya Immigration mpo na kozwa biyano misusu. Esengeli mpe obenga Cour ya Immigration soki ozali na mokanda oyo bakomi mokolo oyo okokutana na bazuzi, kasi ekokani te na mokolo oyo bapesaki yo ntango obengaki lisungi ya Cour ya Immigration. Soki balobi ete okokutana na bazuzi na Boston, okoki kobenga Cour ya Immigration ya Boston na 617-565-3080 (pona option 3). Mpo na ba cour ya immigration misusu mpe ba alo-alo na bango, kende na https://www.justice.gov/eoir/eoir-immigration-court-listing

LIKEBISI: Soki ozali na mokanda oyo bakomi mokolo oyo okokutana na bazuzi, esengeli okende na tribunal mokolo wana, ata bamoni makambo etali dossier na yo te, ntango obengaki, to omoni yango na site ya Cour ya Immigration te.

4. Soki numéro A na yo ezali na kati ya site ya Cour ya Immigration, okoki komona makomi lokola na elili oyo. Ezali esika wapi okoki kolandela dossier na yo.

Likebisi: Elili oyo ezali kaka elembo. Makambo etali dossier na yo ekoki kokesena to mpe kobima lolenge mosusu.

Esengeli ete otala site ya Cour ya Immigration mpo na moto MOKO NA MOKO na libota na yo, mpo ete moto moko na moko azali na numéro A na ye, ata bana. Bato ya libota moko, bakoki koleka na batango ekeseni, to mpe na ba cour ekeseni. Esengeli ete olanda lisusu oyo osalaki mpo na numéro A, na moto moko na moko.

Babakisaka makomi na site ya Cour ya Immigration, ntango na ntango, mpe mikolo ya kokutana na bazuzi ebongwanaka mingi. Esengeli ete otala ata mbala moko na mposo, mpo na kolandela dossier na yo. Mpo na koyeba makambo nini ya sika balobi na ntina ya dossier na yo, esengeli ete Cour ya Immigration ezala na adresse postale na yo. Kende na page Kobongola Adresse mpo na kozwa lisungi mpo na koyebisa esika nini okomi kofanda: https://ilapmaine.org/change-address-lingala.

Babakisi makomi na décembre 2022



SUNGA BISO TOBONGISA KOLEKA!